Yeba ndenge mbongo na yo ezali
Mpo na kokoka kopesa bamposa
Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu, pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela. Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba ; bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga. Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi. (Masese 27:23-27)
Mpo na kokoka kokokisa mikano malamu
Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ? Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba : (Luka 14:28-29)
Bomoi na biso esengeli komonisa molongo
Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te. (1 Bakolinto 14:40)
Nkolo azali Nzambe ya mobulu te
Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu, (1 Bakolinto 14:33)
Kobongisa mikano ezali malamu
Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele. (Masese 20:18)
Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga. (Masese 21:5)
Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele. Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi. (Masese 24:3-4)