Losambo ya bikeko

Kogumbamela bikeko epekisami mpenza, mpo bikeko ezali misala ya bato mpe elongolaka makanisi na bokonzi ya Nzambe. Lokoso ekokani na losambo ya bikeko; Nzambe asambisaka baoyo basalaka yango, kasi apambolaka baoyo babebisaka bikeko mpe bazongelaka Ye.

Mobeko ya kogumbamela bikeko te

Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai. (Kobima 20:23)

Bikeko ezali mosala ya maboko ya bato

Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato. (Banzembo 115:4)
Banzambe ya bikolo ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato. (Banzembo 135:15)

Nzambe apesaka nyonso, ata biloko oyo basalelaka mpo na bikeko

Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala. (Oze 2:10)
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe. (Oze 2:15)

Lokoso ekokani na losambo ya bikeko

Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko. (Bakolose 3:5)

Nzambe asambisaka baoyo bagumbamelaka bikeko

Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko. (Ezekieli 23:29-30)
Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. » (Mishe 1:7)

Ndakisa ya bato ya Nzambe oyo babebisaki bikeko, mpe Nkolo apambolaki bango

Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! » Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene. (Ezayi 30:22-23)

Ndakisa ya losambo ya bikeko oyo ebombami na losambo

Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo ! Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki : — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango. Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika. (Bilombe 17:2-4)