Lokoso ya mbongo

Lokoso esambisami lokola losambo ya bikeko oyo epekisaka kozwa libula na Bokonzi ya Nzambe. Makomi ekebisi na ntina ya ezaleli na yango ya kobebisa, emonisi ndenge ememaka na mabe mpe na konyokola bato, mpe na nsuka na kosambisama ya Nzambe.

Mobeko ya kozala na lokoso te

Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu. (Ba-Efeso 5:3)
Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe. (Ba-Efeso 5:5)

Lokoso ezali losambo ya bikeko

Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko. (Bakolose 3:5)

Bomibatela na lolenge nyonso ya lokoso

Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto. (Luka 12:15)

Mipekisa soki ozali na mposa ya lokoso

Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi, tala malamu moto oyo azali liboso na yo. Tia mbeli na mongongo na yo soki ozalaka lokoso. Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo. (Masese 23:1-3)

Soki Klisto akomi mposa na biso, lokoso ekomi lisusu mokakatano te

Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te ? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te ? (Banzembo 73:25)

Ndakisa ya moto ya Nzambe oyo azalaki na lokoso te

Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso. (1 Batesalonika 2:5)

Nkolo apesaka etumbu na lokoso

Lokola ndakisa mpo na bana na Ye

Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki. (1 Bakolinto 10:6)

Oyo bato ya lokoso bazalaki na mposa na yango

Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba : « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Tokanisi lisusu bambisi, bandunda ya ndenge na ndenge, pasiteki, bandembi, matungulu, ayi oyo tozalaki kolia ya ofele na Ejipito. (Mitango 11:4-5)

Ndakisa ya bato ya lokoso

Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango. (1 Samuele 14:32)

Bakambi ya lokoso

Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko. (Ezayi 56:11)

Bato ya lokoso bazali bato mabe

Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te. Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi, (Barome 1:28-29)
Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe. Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe. (Banzembo 10:3-4)

Lokoso ekokanga bato ya lokoso

Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango. (Masese 11:6)

Basakoli ya lokuta bakosalela nzoto ya Klisto mpo na lokoso

Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata. Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango. Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango. (2 Petelo 2:1-3)
Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Sima na bango kotika nzela ya solo, bapengwaki mbala moko na kolanda nzela ya Balami, mwana mobali ya Beori, oyo alingaki lifuti ya mabe ; (2 Petelo 2:14-15)

Bato mosusu bakotonda soki moke te

Sonzo ezalaka na bana basi mibale, egangaka kaka : « Pesa ! Pesa ! » Ezali na biloko misato oyo etondaka te, minei oyo elobaka te : « Ekoki ! » (Masese 30:15)

Bato ya losambo bakoki kozala na lokoso

Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko. (Ezekieli 33:31)

Ndakisa ya Nkolo oyo apesaki bato ya lokoso etumbu

Yango wana, bakomaki kobenga esika yango « Kibiroti-Atava, » pamba te ezalaki na esika wana nde bakundaki bato ya lokoso. (Mitango 11:34)
Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. » Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye : — Boni, nyonso ezali malamu ? Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. » Namani alobaki : — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi. Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki. Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te. Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ? Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe. (2 Bakonzi 5:20-27)
Tango nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bavandi ya mboka, nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, epai ya bato mosusu, » elobi Yawe. « Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta. (Jeremi 6:12-13)
Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo ; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta ; (Jeremi 8:10)