Kosenga toli ezali malamu
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ; (Masese 1:5)
...lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai, (Masese 1:25)
...lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai, (Masese 1:30)
Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya. (Masese 12:15)
Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya. (Masese 13:10)
Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya. (Masese 19:20)
Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele. (Masese 20:18)
Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo. (Masese 27:9)
Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ; (Mosakoli 4:13)
Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo ! (Luka 13:31)
Kozala na bapesi toli mingi ezali malamu
Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. (Masese 11:14)
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele. (Masese 15:22)
Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye. Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli. (Masese 24:5-6)
Bato mingi bakobakisa mosala
Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga. (Levitike 26:8)
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango. Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye ! Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto ; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto ? Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te. (Mosakoli 4:9-12)
Bandakisa ya kopesa/kolanda toli
Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki : — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ? Moyize azongiselaki ye : — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe. Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe. Bokilo ya Moyize alobaki na ye : — Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te. Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo ; okolonga kosala yango yo moko te. Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala. Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike ; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te ; pamba te okokabola yango elongo na bango. Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango. Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki. (Kobima 18:14-24)
Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo : — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ? Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali. (1 Bakonzi 1:11-12)
Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai. Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ; maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango. Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka. (Yobo 29:21-23)
Ndakisa ya kopesa/kolanda toli te
Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye ; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi. Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia ; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia : — Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo ? Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo. (2 Masolo ya Kala 25:14-16)
Esika toli euti
Nkolo
Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, toli mpe mayele ezali ya Ye. (Yobo 12:13)
Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai. (Banzembo 16:7)
Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona. (Banzembo 25:12)
Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo. (Banzembo 32:8)
Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato. Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso. (Banzembo 33:10-11)
Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo. (Banzembo 73:24)
Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka. (Masese 19:21)
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia. (Ezayi 9:5)
Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye : Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ; (Ezayi 11:2)
Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi mpe bwanya na Ye ezali monene. (Ezayi 28:29)
Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye. (Jeremi 32:18-19)
Mbano ya kosenga toli ya Nkolo te
Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe. Boye Yawe abomaki ye mpe apesaki bokonzi epai ya Davidi, mwana mobali ya Izayi. (1 Masolo ya Kala 10:13-14)
Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te. Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi. (Jozue 9:14-15)
Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye. Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te. Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi. (Banzembo 106:13-15)
Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende, pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi ; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango. (Banzembo 107:10-12)
Nkolo azali kokamba toli ya bato
Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. » Davidi alobaki na ye : — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai. Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli. (2 Samuele 15:31, 33-34)
Abisalomi alobaki na Ayitofeli : — Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ? Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli. (2 Samuele 16:20, 23)
Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki : — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi ? Soki te, yebisa biso makanisi na yo. Ushayi azongiselaki Abisalomi : — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te. Bongo Ushayi abakisaki : — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato. Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. » Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko. Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba. Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi. Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. » Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi. Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : — Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala. Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. » Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi ; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te. Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna. Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango. Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki : — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ? Mwasi azongiselaki bango : — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi. Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi : « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. » Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki. Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye. (2 Samuele 17:6-23)
Makomi
Malako na Yo esepelisaka ngai makasi, epesaka ngai toli. (Banzembo 119:24)
Bato oyo babangaka Nzambe
Mama mpe tata
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ; Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo. (Masese 1:8-9)
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo. Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo. Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka. (Masese 6:20-22)
Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni. (Masese 23:22)
Ndakisa ya toli ya tata oyo abangaka Nzambe
Tango Davidi akomaki pene ya kokufa, apesaki malako oyo epai ya Salomo, mwana na ye ya mobali : — Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali. Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ; mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele. (1 Bakonzi 2:1-4)
Baoyo bazwi bwanya
Bakonzi nyonso ya mokili bazalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. (2 Masolo ya Kala 9:23)
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi. (Masese 13:20)
Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ; (1 Bakolinto 12:8)
Bato oyo bazali na mayele ya bomoi
Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ? Bazongiselaki ye : — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo. Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. (1 Bakonzi 12:6-8)
Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ? Bazongiselaki ye : — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo. Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. (2 Masolo ya Kala 10:6-8)
Toli oyo esengeli koboya
Bato mabe
Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso ! Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo. Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye ? Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? › Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te ? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe ! (Yobo 21:14-16)
Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli, (Banzembo 1:1)
Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta. (Masese 12:5)
Ndakisa ya toli mabe
Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ; bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi. (Esidrasi 4:4-5)
Ezali kati na yo Ninive nde moto oyo azali na mabongisi mabe mpo na kotelemela Yawe mpe azali na batoli ya mabe abimi. (Naumi 1:11)
Bato oyo bagumbamelaka bikeko
Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele, bazali na bososoli te kati na bango. (Deteronomi 32:28)
Natalaki, kasi moto moko te azalaki, moko te kati na bango mpo na kopesa toli, moko te mpo na kopesa eyano soki natuni bango motuna. Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta ! Misala na bango ezali se pamba, bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. » (Ezayi 41:28-29)
Mibange
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. Atunaki bango : — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? » Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene ; Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. (1 Bakonzi 12:8-10, 13-14)
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. Atunaki bango : — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? » Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene. Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : — Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. (2 Masolo ya Kala 10:8-10, 13-14)
Mapamboli mpe bilakeli mabe
Mapamboli mpe matomba ya kosenga toli
Elonga
Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. (Masese 11:14)
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele. (Masese 15:22)
Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli. (Masese 24:6)
Bokambi mpe litambwisi
Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo. (Banzembo 32:8)
Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo. (Banzembo 73:24)
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo. Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo. Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka. (Masese 6:20-22)
Bwanya
Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya. (Masese 13:10)
Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya. (Masese 19:20)
Esengo ya kopesa toli
Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia. (Masese 12:20)
Bilakeli mabe/mbano ya kosenga toli te to kosenga toli ya bato mabe
Liwa
Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe. Boye Yawe abomaki ye mpe apesaki bokonzi epai ya Davidi, mwana mobali ya Izayi. (1 Masolo ya Kala 10:13, 14)
Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe. Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki ; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye. Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami. (2 Masolo ya Kala 22:3-5)
Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo. (2 Masolo ya Kala 25:16)
Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko, lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai, Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino, tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino. Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te. Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe, lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai, bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko. Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ; (Masese 1:24-32)
Koswana
Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya. (Masese 13:10)
Mikano oyo ebebi
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele. (Masese 15:22)
Kozanga elonga
Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. (Masese 11:14)
Bilakeli mabe mpe mbano mosusu
Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te. Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi. (Jozue 9:14-15)
Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye. Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te. Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi. (Banzembo 106:13-15)
Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende, pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi ; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango. (Banzembo 107:10-12)