Mobeko ya konyokola babola te
Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito. Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike. Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango. Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike. (Kobima 22:20-23)
Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye. (Yobo 34:28)
Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala. (Masese 28:3)
Bato mabe banyokolaka babola
...pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe : atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa. Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te. (Ezayi 32:6-7)
Ndenge bato oyo banyokolaka babola bazali
Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia. (Masese 28:15)
Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato. (Masese 30:14)
Kosambisama ya baoyo banyokolaka babola
...bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki, (Yobo 20:10)
Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango. (Yobo 20:15)
...akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye. Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko. Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye. (Yobo 20:18-20)
Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye. (Yobo 20:26)
...mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe. (Yobo 20:28)
Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima. Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana. (Banzembo 37:14-15)
Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye ! (Banzembo 109:11)
Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema ; (Banzembo 109:16)
Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola. (Masese 22:16)
Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo, pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango. (Masese 22:22-23)
Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye : « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola ! Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola ; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ? (Ezayi 3:14-15)
Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato ! Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike. (Ezayi 10:1-2)
Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo : ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo, tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango. Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › » (Jeremi 22:1-5)
Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali. (Ezekieli 22:7)
Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo. (Ezekieli 22:29)
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale. Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai. (Amosi 2:6-7)
Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. » Nkolo Yawe alapi ndayi mpo na bosantu na Ye : « Solo, na mikolo ekoya, bakomema bino mpe bana na bino na bandobo ; (Amosi 4:1-2)
Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi. Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo, lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki. Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene : bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te. (Amosi 5:9-12)
Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili. Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta. Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble. (Amosi 8:4-6)
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. » Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te. Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi. (Zakari 7:9-12)
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. (Malashi 3:5)
Kosenga Nkolo asambisa konyokolama ya babola
Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango ! (Banzembo 94:2)
...bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike ; (Banzembo 94:6)
...bazali koloba : « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te ! » (Banzembo 94:7)
Ndakisa ya konyokola babola
Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te. (Jeremi 2:34)
Bato ya losambo oyo banyokolaka babola
Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi. (Malako 12:38-40)
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi. (Luka 20:46-47)
Konyokola babola ezali likambo ya mikolo nyonso
Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi. (Mosakoli 5:7)
Batela/salisa babola/baoyo bazangi lisalisi
Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi. Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela. (Masese 31:8-9)
Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali ! (Ezayi 1:17)
Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango. (Jeremi 21:12)
Bato ya Nzambe basalisaka babola
Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te. (Masese 29:7)
Boni, nazalaki kolela te elongo na bato oyo bazalaki na pasi ? Motema na ngai eyokelaki babola mawa te ? (Yobo 30:25)
Nkolo apambolaka baoyo basalisaka babola
Esengo na moto oyo akanisaka mobola ! Yawe akokangola ye na tango ya pasi. Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye. Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso. (Banzembo 41:2-4)
Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu. (Masese 19:17)
Apambolaki mokambi oyo asalisaki babola
Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso. (Masese 29:14)
Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo ; soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi, nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela. Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te. Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ; (Jeremi 7:5-9)
Leisa babola mpe Nkolo akozongisela yo
Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango. Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ; mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa. Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe ! Yesu azongiselaki ye : — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele. Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. » Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! » Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! » Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. » Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. » Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. » Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato. (Luka 14:12-23)
Sambisa mobola na bosembo
Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi. (Kobima 23:6)
Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga. (Deteronomi 24:17)
Yokela babola mawa
« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. Etinda ya kotika mobimbi ya nzete mpe misisa na yango elingi koloba ete bokonzi na yo ekozongela yo lisusu tango okondima ete Nzambe ya likolo azali Mokonzi ya bakonzi. Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo : ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo ! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa ! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › » (Daniele 4:22-24)
Baoyo babatelaka babola te bakosambisama
Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya. Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te. Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye ? (Jeremi 5:27-29)
Lisumu ya Sodoma: kosalisa babola te
Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela. (Ezekieli 16:49)
Ndakisa ya mokambi oyo abatelaki babola te
Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te. (Ezayi 1:23)
Ndenge tosalelaka babola emonisaka Nkolo
Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu. (Masese 14:31)
Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu. (Masese 17:5)
Eteni ya Nzambe epai ya babola
Nkolo apesaka/abatelaka babola mpe bato oyo bazali na mposa
...abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba. (Deteronomi 10:18)
Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi. (Yobo 5:15)
Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko. (Banzembo 9:19)
Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike. (Banzembo 10:14)
Yawe alobi : « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. » (Banzembo 12:6)
Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ; abikisaki ye na pasi na ye nyonso. (Banzembo 34:7)
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? » (Banzembo 35:10)
Solo, nazali mobola mpe moto akelela, kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai. Nzambe na ngai, kowumela te ! (Banzembo 40:18)
Nzambe apesaka libota epai ya bato oyo bavandaka bango moko, abimisaka bakangami wuta na minyololo ; kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka. (Banzembo 68:7)
Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki, na boboto na Yo, mpo na mobola. (Banzembo 68:11)
Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela, mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko. (Banzembo 69:34)
Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango. (Banzembo 102:18)
Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda. (Banzembo 107:4)
Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu. (Banzembo 109:31)
Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela ; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola (Banzembo 113:7)
Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei. (Banzembo 132:15)
Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela. (Banzembo 140:13)
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko. (Banzembo 146:7)
Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe. (Banzembo 146:9)
Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele. (Banzembo 147:6)
Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali. (Masese 15:25)
...kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye. (Ezayi 11:4)
Ye oyo aleki mobola nde akozwa eloko ya kolia, mpe moto oyo akelela nde akolala na kimia ; kasi nakoboma bato na yo na nzala ; mpe bato oyo bakobika, bakoboma bango. (Ezayi 14:30)
Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ; (Ezayi 25:4)
Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba : mayi ezali te ; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te. (Ezayi 41:17)
Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe ! Pamba te abikisaka bomoi ya mobola na maboko ya bato mabe. (Jeremi 20:13)
Libondeli ete Nkolo asalisa babola
Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli. Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo. Pamba te akokangola moto akelela oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi, mpe mobola oyo azangi mosungi. Akoyokela mobola mpe moto akelela mawa, mpe akobikisa moto akelela na kufa ; akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye. Akozala na bomoi, bakopesa ye wolo ya Saba. Bakobanda kosambela mpo na ye tango nyonso mpe kopambola ye mikolo nyonso. (Banzembo 72:4, 10, 12-15)
Sala ete moto oyo bazali konyokola azwa lisusu lokumu ! Sala ete mobola mpe moto akelela bakumisa Kombo na Yo. (Banzembo 74:21)
Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ; bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe. (Banzembo 82:3-4)
Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo. Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai. (Banzembo 109:21-22)
Makanisi ya bato na likambo ya eteni ya Nzambe mpe babola
Bato bapusaka bandelo, bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki, babotolaka ane ya mwana etike mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali ya mwasi oyo akufisi mobali ; balongolaka babola na nzela, mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama. Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo na mosala mpo na koluka biloko ya kolia, kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei ; bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele mpe balokotaka bambuma oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe. Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba, bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili ; bapoli na mvula ya ngomba, bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama. Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo. Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ; bamemaka maboke ya nzete ya ble, kasi bazongaka kaka na nzala. Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu, bakamolaka bambuma ya vino, kasi bazongaka kaka na posa ya komela. Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te. Mobomi azali kotelema na moyi mpe koboma mobola elongo na moto akelela ; na butu, azali lokola moyibi. (Yobo 24:2-12, 14)
Makanisi ya Nzambe na likambo ya babola
Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana. (Emoniseli 2:9)
Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu. Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu. (Emoniseli 3:17-18)
Nkolo aponaki bato ya bolembu mpo na koyokisa bato ya makasi soni
Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu ! Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni. (1 Bakolinto 1:26-27)
Nkolo akelaki bato nyonso
Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga : ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale. (Masese 22:2)
Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga : Yawe angengisaka miso ya bango mibale. (Masese 29:13)
Makanisi ya bato na likambo ya babola
Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini ? Litomba nini mobola azali na yango ata ayebi kotambola liboso ya bato mosusu ? (Mosakoli 6:8)
Mikakatano mpe matomba mpo na babola
Mikakatano ya babola
Babola bazali na baninga moke
Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele. (Masese 14:20)
Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema. (Masese 19:4)
Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te ? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te. (Masese 19:7)
Babola banyokwamaka na kozanga bosembo
Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo. (Masese 13:23)
Babola bayebisaka bazwi makambo na komikitisa
Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo. (Masese 18:23)
Babola basalelaka bazwi
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi. (Masese 22:7)
Batalaka babola te
...ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke ; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango. Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya ; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango. Boye namilobelaki : « Bwanya ezali malamu koleka makasi ya nzoto. » Kasi bwanya ya mobola etiolamaka, mpe bayokaka maloba na ye te. (Mosakoli 9:14-16)
Bobola
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango. (Masese 10:15)
Libondeli ya kozala mobola te
Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale, kopimela ngai yango te liboso ete nakufa : longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai, pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni. (Masese 30:7-9)
Matomba mpo na babola
Babola babengami bapambolami
Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino ! (Luka 6:20)
Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino ! (Luka 6:24)
Babola bazali bazwi na kondima
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ? (Jake 2:5)
Basakolelaka babola sango malamu
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ; (Ezayi 61:1)
Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye kotuna epai ya Yesu : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? Yesu azongiselaki bango : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka : bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola. (Matayo 11:2-5)
« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama (Luka 4:18)
Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola. (Luka 7:22)
Bakozwa babola na makasi te mpo na bomengo
Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te. (Masese 13:8)
Babola oyo bayebi Nkolo bakobɔndisama na likolo
Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso. Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ; azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye. Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye. Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye. Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. » Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi. (Luka 16:19-25)
Babola bakoki komikumisa lokola bana ya Nzambe
Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye, mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga. (Jake 1:9-10)
Na ntango ya kozongisama ya Isalaele, babola bakozwa matomba
Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele. (Ezayi 29:19)
Mobola, kasi moto ya bwanya, ayebi mozwi malamu
Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu. (Masese 28:11)
Makambo oyo bobola eleki na yango
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele. (Masese 19:1)
Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi. (Masese 19:22)
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe. (Masese 28:6)
Bandakisa ya babola
Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki : « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete ? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba ! » (1 Samuele 18:23)
Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te ! (Banzembo 70:6)
Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai ; pamba te nazali mobola mpe moto akelela. (Banzembo 86:1)
Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei ; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami ! (Bileli 1:11)
Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; » mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka. (Luka 2:22-24)
Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga, mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka ; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko ; (1 Bakolinto 4:11-12)
Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ; kati na kobetama, boloko mpe mobulu ; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ; koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso. (2 Bakolinto 6:4-5, 10)
Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata. (2 Bakolinto 11:27)
Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango. Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi. Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai. (Bafilipi 4:11-14)
Babola/bazwi na lingomba
Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke. Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino. Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo ; pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko ; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka. Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ? Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te ! (1 Bakolinto 11:18-22)
Kopesa babola
Kozongisa mabele
Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino : bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te. Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga. Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye. (Levitike 25:11-13)
Mibeko na likambo ya babola oyo bakomaki baombo
Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu. Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino ; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama ; mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye. Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu. Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo. Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo ; okosomba bango kaka na bikolo yango. Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo ; boye bakokoma bawumbu na yo. Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela ; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele. Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola ; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye ; ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka : moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye. Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko. Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama ; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala. Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye. Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali. Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala ; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi. Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama. (Levitike 25:39-54)
Kotosa mibeko te ememaki kosambisama
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki : ‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te. Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai. Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; (Jeremi 34:13-17)
Makambo ndenge na ndenge
Makambo oyo ekomisaka moto mobola
Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu. (Masese 13:18)
Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba. (Masese 20:13)
Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ; moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta akotikala kokoma mozwi te. (Masese 21:17)
Kozala esika moko te na balangwi masanga to na bato ya lokoso, pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola, mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka. (Masese 23:20-21)
Mobola akozala na mokili te soki bato batosaki nyonso
Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka, soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo. (Deteronomi 15:4-5)
Kaka babola nde batikalaki na mokili oyo elongamaki
Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili. (2 Bakonzi 24:14)
Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga. (2 Bakonzi 25:12)
Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te ; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga. (Jeremi 39:10)
Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni, (Jeremi 40:7)
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni. (Jeremi 52:15)